Home 🎬 Bollywood 🎵 Pakistani 🎤 English Pop

La fleur du ciel

👤 Madilu System 🎼 Sans commentaire ⏱️ 5:51
🎵 1779 characters
⏱️ 5:51 duration
🆔 ID: 11386783

📜 Lyrics

La fleur du ciel

O-oh Mandolina ah
Motema ba ngaï na mi pesi na yo chérie eh
Ya mbala oyo mabanzo na nga na bondeli yo oh
Yebisa ngaï po te ne yeba a-ah
Ngaï ko nazali Nzambé té po na yena maso oyo oh
Obombi na motema

O-oh Mandolina ah
Motéma na ngaï na mi pesi na yo chérie eh
Ya mbala oyo mabanzo na nga na bondeli yo oh
Yebisa ngaï po te ne yeba a-ah
Ngaï ko nazali Nzambé té po na yena maso oyo oh
Obombi na motéma

Mandolina tika lofundu mwana ya Bruxelles
Epayi na ngaï kombo na yo na kati'a motéma
Ezua esika obimaka lisusu té
Ata nazali ko sambela
Ma bondeli n'a nga ya suka
Nzambé à sunga yo
Apambola mokolo wana maman abotaki yo

Mandolina mama
Yaka na mema yo
Na avion ya Suivez Zaïre
Po wana ezala avion ya sûr
Ntsaka Ngando

Mandolina tika lofundu mwana ha Bruxelles
Epayi na ngaï kombo na yo na kati'a motéma
Ezua esika obimaka lisusu té
Ata nazali ko sambela
Ma bondeli n'a nga ya suka
Nzambé à sunga yo
Apambola mokolo wana maman abotaki yo

Ah Mandolina vérité na nga na bomba na kokité sanduku sé motéma nayo eko juger
Ah Mandolina vérité na nga na bomba na kokité sanduku sé motéma nayo eko juger

Motéma sanduku ebomba ndé makambu
Nakomi ndé ko lela bolingo na nga Mado

Ah Mandolina vérité na nga na bomba na kokité sanduku sé motéma nayo eko juger

Tu sais que la vérité blesse Mandolina
Il fallait pas que na yéba obimaka na yé

Ah Mandolina vérité na nga na bomba na kokité sanduku sé motéma nayo eko juger

Ngaï na silisi maloba
Nionso ha bolingo nini yo ombeli nga
Ko boya to ko linga

Ah Mandolina vérité na nga na bomba na kokité sanduku sé motéma nayo eko juger
Oleyisa nga nini eh-ah Mandolina

Na moni pasi mwana mama
Na moni pasi nga nguma
Na moni pasi mwana mama
Na moni pasi nga nguma

⭐ Rate These Lyrics

Average: 0.0/5 • 0 ratings