Home ๐ŸŽฌ Bollywood ๐ŸŽต Pakistani ๐ŸŽค English Pop

Mutu Ya Suka (Live)

๐Ÿ‘ค L'or Mbongo โ€ข ๐ŸŽผ Live O2 Brixton Academy โ€ข โฑ๏ธ 6:47
๐ŸŽต 1656 characters
โฑ๏ธ 6:47 duration
๐Ÿ†” ID: 7098206

๐Ÿ“œ Lyrics

Molimo na ngai kumisa Nkolo
Mayele na ngai Kumisa Nkolo oooh
Molimo na ngai kumisa Nkolo
Ye nde azali Nzambe na bomoyi

Soki mbanguna ba telemeli ngai
Na lendisamaka na maloba Nkolo
Ba ko timola libulu po na kufa
Atelemaka abundelaka ngai ye eh eh

Nzambe na nga azali na bomoyi
Atelemaka mutu ya suka na nioso
Oyo alobaka ezali ya solo
Nzambe na nga azali na bomoyi 2x

Eh na fukami na toboli misu epayi na nkolo
Ye molongisi na nga na tango ya pasi eh
Na libulu na kufa Yahweh o pesi ngai bomoyi

Katikati na moto Yahweh olongisi nga
Yahweh Sabaoth yo nde o pesi nga elonga
Na tatola monene na yo na bomoyi na nga

Ngai na kati na molili nga na kobelela Yesu eh
Yonde mwinda bomoyi yaka kongengisa nga eh
Tango bato ba yini nga mpo nga moto na Kokumba
Aboyaki nga te andimi kobikisa ngai eh
Soki bato basali kosela mpo na kufa
Mosikoli na nga akotelema moto ya suka baba

Nzambe na nga azali na bomoyi
Atelemaka mutu ya suka na nioso
Oyo alobaka ezali ya solo
Nzambe na nga azali na bomoyi
Nzambe na nga azali na bomoyi
Atelemaka mutu ya suka na nioso

Oyo alobaka ezali ya solo
Nzambe na nga azali na bomoyi
Eh eh Ata banguna bayende mpo ba boma nga
Na kolengaka te mpo ye azali na bomoyi
Soki ba tuni nga wapi nzambe na ngai
Na zonkisaka mpe na lolendo nioso

Nzambe na nga yo zali na bomoyi
Otelemaka mpe moto ya suka na nioso
Oyo olobaka ezali ya solo
Nzambe na nga ozali na bomoyi alleluia

Nzambe na nga azali na bomoyi
Atelemaka mutu ya suka na nioso
Oyo alobaka ezali ya solo
Nzambe na nga azali na bomoyi 2x

(Instrumental)

Nzambe na nga azali na bomoyi
Atelemaka mutu ya suka na nioso
Oyo alobaka ezali ya solo
Nzambe na nga azali na bomoyi 3x

โญ Rate These Lyrics

โ˜†โ˜†โ˜†โ˜†โ˜†
Average: 0.0/5 โ€ข 0 ratings